Misala ya ndako ya mpasi (Emergency Housing)
Oyo okoki kozela
Bapesi ya ndako ya mpasi bakotia yo na hotel to na esika ya kobombama (shelter) mpo na ntango ya mokuse. Mokano ezali ete bakende na yo noki na ndako ya libela.
1. Kobanda
Mopesi ya ndako ya mpasi akosala:
- Akotala baformulaire ya ntina mpo na ndako
- Akosɛnga yo otia sinyature na boyokani ya kokabola sango
- Akosolola na yo mpo na bamposa mpe mikano na yo ya ndako
- Akosala plan ya ndako
- Akoyanola mituna na yo ya ntina
2. Kolukela yo esika ya libateli
Mopesi ya ndako ya mpasi akotia yo na shelter to shambre ya hotel oyo ebongi na monene ya libota na yo mpe bamposa ya sikisiki to bakomiseli (accommodations), mpo na kokende noki na ndako ya libela.
Liyebisi: Okoki kozwa lisungi ya ndako ya mpasi kino mikolo 30, kolanda ndenge nini ndako ya libela ekomi kopesama noki mpo na yo.
3. Wana ozali na shelter/hotel
Mopesi ya ndako ya mpasi akosala:
- Akotia yo na hotel to shelter oyo ebongi na libota na yo mpe akopesa yo orientation
- Akolimbola ntango okoki kovanda na ndako ya mpasi mpe akosunga ete obima malamu mpe na ngonga
- Akopesa yo misala na lokota oyo olingi
- Akosala elongo na yo, mokambi ya dossier na yo, mpe mopesi ya Housing Navigation mpo na kobongisa yo mpo na kokende na ndako ya libela
- Akotala yo ata mbala moko na mikolo 7 mpo na kotala soki ozali na libateli mpe soki obongami kokende na ndako na yo moko
- Akosala ete obima na hotel to shelter tango ndako ya libela esili kobongama
4. Kokende na ndako na yo moko
Ndako ya mpasi ezali kovanda ya ntango ya mokuse (kino mikolo 30). Wana ozali wana, bakokangisa yo na mopesi ya Housing Navigation oyo akosunga yo oluka ndako ya libela (apartment).
Ya ntina: Ndako ya mpasi ezali moke (limited) mpe esilaka tango okoti na ndako ya libela.
Misala ya Housing Navigation
Oyo okoki kozela
Bapesi ya Housing Navigation bakosunga yo oluka mpe okota na ndako ya libateli mpe ya ntango molai (apartment). Mbala mingi, bakiliya oyo bazali na ndako ya mpasi ya projet WA MASS batindamaka epai ya bapesi ya Housing Navigation mpo na mosala oyo. Bakoki mpe kopesa lisungi ya kofuta ndako mpo na ntango ya mokuse (housing subsidies) na bakiliya mosusu oyo babongi.
Bakiliya bakoki kozwa lisungi ya ndako kino sanza motoba, na kosangisa ndako ya mpasi, Housing Navigation, mpe/ to housing subsidies.
1. Kobanda
Mopesi ya Housing Navigation akosala:
- Akosɛnga yo otia sinyature na boyokani ya kokabola sango
- Akotuna mituna mpo na koyeba malamu makambo na yo mpe bamposa na yo
- Akolimbola misala ya ndako oyo ekoki kopesama
- Akosala plan ya Housing Navigation mpo na yo
2. Koluka ndako na yo
Housing Navigators bakosunga:
- Koluka baapartment soki naino moko eyebani te mpo na yo
- Kosalisa na baapplication ya kofuta ndako mpe ba-kontra (lease)
- Kosolola (negocier) motuya ya rent mpe misolo mosusu ya ndako
- Kosalisa yo oyeba malamu kontrat ya rent mpe mikumba na yo
- Kosalisa yo obongisa ndenge okofuta rent tango lisungi ya programme oyo esili
- Kopesa sango ya biloko mosusu ya lisungi ya communauté lokola lisungi ya rent mpe facture (utilities) soki ekoki mpe soki esengeli
- Kosala mpo okota na ndako na yo moko ya libela
3. Kokota (Moving In)
Housing Navigator na yo akoyebisa yo mpe mopesi ya ndako ya mpasi ya projet WA MASS mokolo ya kokota na ndako (move-in), mpe akobongisa bobimi na yo na hotel to shelter.
Liyebisi: Esengeli osala elongo na Housing Navigator na yo mpe mopesi ya ndako ya mpasi mpo na kosala check-out na hotel to shelter.
Makambo ya ntina
- Bapesi ya Housing Navigation basalaka makasi mpo na koluka bandako ya motuya ya malamu mpo okoka kofuta rent yo moko nsima ya housing subsidies kosila.
- Bato nyonso babongi te kozwa sanza motoba mobimba ya lisungi ya ndako na nzela ya projet WA MASS. Mopesi na yo akolimbola lisungi nini ekoki mpo na situation na yo.